Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 18:25 - Mokanda na Bomoi

25 Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 18:25
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki : — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai.


Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala ; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala.


Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo : — Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia.


Jozue asalaki bambeli ya mabanga mpe akataki bana mibali ya Isalaele ngenga, pene ya ngomba moke ya Araloti.


Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.


Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?


Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.


Saulo alobaki na Davidi : — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »


Basali ya Saulo bayebisaki ye maloba ya Davidi.


Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ