18 Davidi azongiselaki Saulo : — Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi ?
Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki : — Mpo na nini nazwi ngolu ya boye na miso na yo ? Mpo na nini ozali kopesa ngai lokumu ya boye, ngai oyo nazali mopaya ?
Saulo azongisaki : — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo ?