Mokonzi ya boloko azalaki kotala lisusu likambo moko te kati na makambo oyo apesaki Jozefi mokumba ya kosala, pamba te Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolongisa ye na makambo nyonso oyo azalaki kosala.
Davidi atiaki bayangeli kati na Edomi, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri ; boye bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende.
Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini ? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.
Yawe azalaki elongo na bato ya libota ya Yuda. Babotolaki mokili ya bangomba, kasi balongaki te kobengana bavandi ya etando, pamba te bazalaki na bashar ya bibende.
Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.
Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye.