Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 18:10 - Mokanda na Bomoi

10 Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 18:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki.


Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi, okolonga ; pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. »


Anania alobaki liboso ya bato nyonso : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Liboso ete mibu mibale ekoka, nakobuka ndenge wana ekangiseli ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, na kingo ya bikolo nyonso. › » Mpe mosakoli Jeremi akendeki na ye.


Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.


Yango wana Nzambe atindeli bango molimo ya libunga mpo ete bandima makambo ya lokuta,


Dalila abelelaki Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki : « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye.


Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye.


Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe.


Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki.


Bongo Jonatan abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo basololaki na tata na ye. Jonatan amemaki Davidi epai ya Saulo, mpe Davidi asalelaki Saulo lokola na ebandeli.


Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda,


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ