1 Samuele 18:1 - Mokanda na Bomoi1 Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino.
Kasi bato balobaki na Saulo : — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.
Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita ? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ? »