Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:8 - Mokanda na Bomoi

8 Goliati atelemaki mpe agangelaki mampinga ya Isalaele, alobaki : « Mpo na nini bobimi mpe bosali milongo mpo na bitumba ? Ngai nazali moto ya Filisitia te ? Mpe bino bozali basali ya Saulo te ? Bopona moto moko mpe botika ye koya kobundisa ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:8
5 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Iri azongiselaki Davidi : — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.


Kasi Joabi azongisaki : — Tika ete Yawe akomisa bato na Ye ebele koleka mbala nkama ! Oh mokonzi, nkolo na ngai, bango nyonso bazali te basali ya nkolo na ngai ? Mpo na nini nkolo na ngai alingi kosala bongo ? Mpo na nini komemisa Isalaele ngambo ?


Wana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye.


Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ?


Akokamata eteni ya zomi ya bameme na bino, mpe bino moko bokokoma bawumbu na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ