1 Samuele 17:7 - Mokanda na Bomoi7 Monene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka ; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo azalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe asimbaki na loboko na ye likonga moko lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. Abundisaki moto ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.