Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:50 - Mokanda na Bomoi

50 Boye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:50
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko.


Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.


Boye, na mokolo ya bitumba, soda ata moko te oyo azalaki elongo na Saulo mpe na Jonatan azalaki na mopanga to na likonga na loboko na ye ; kaka Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, nde bazalaki na yango.


Na likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo ; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te. Davidi alobaki na Saulo : — Nakokoka te kotambola na biloko oyo nyonso, pamba te namesana na yango te ! Bongo Davidi alongolaki yango na nzoto na ye.


Davidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga ; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele.


Davidi akimaki mbangu mpe atelemaki na likolo ya moto ya Filisitia, asimbaki mopanga ya moto ya Filisitia, abimisaki yango na ebombelo na yango, abomaki ye, mpe akataki moto na ye na nzela ya mopanga yango. Tango mampinga ya Filisitia bamonaki ete elombe na bango akufi, bakimaki.


Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? »


Davidi atunaki Ayimeleki : — Boni awa, ozali te ata na likonga moko to na mopanga na se na loboko na yo ? Ngai namemaki te ezala mopanga na ngai to ebundeli na ngai mosusu, pamba te mosala ya mokonzi esengelaki kosalema na lombangu.


Saulo azongisaki : — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ