Asa abelelaki Yawe, Nzambe na ye ; alobaki : « Oh Yawe, moko te akokani na Yo, moko te akoki kosunga moto ya bolembu liboso ya moto na nguya. Oh Yawe, Nzambe na biso, sunga biso ! Pamba te totiaka elikya na biso kati na Yo. Ezali na Kombo na Yo nde toyaki kobundisa mampinga oyo ya monene. Oh Yawe, ozali Nzambe na biso ! Tika ete moto alonga Yo te ! »