Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:44 - Mokanda na Bomoi

44 Moto ya Filisitia alobaki lisusu na Davidi : — Pusana awa, nakopesa mosuni na yo epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya zamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:44
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga ; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango ; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba.


Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele.


Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe.


« Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe.


Bongo namonaki anjelu moko atelemi kati na moyi ; azalaki koloba na mongongo makasi epai ya bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi : « Boya, bosangana mpo na feti monene ya Nzambe,


Balobaki na Jonatan mpe na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Boya epai na biso, tokoteya bino likambo moko. » Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Landa ngai na sima, pamba te Yawe asili kokaba bango na maboko ya Isalaele. »


Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ