Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye.
Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele ; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.
Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.
Monene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka ; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye.