Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:40 - Mokanda na Bomoi

40 Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele ; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:40
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.


Kati na basoda wana, ezalaki na mibali nkama sambo ya makasi oyo basalelaka loboko ya mwasi. Moto moko na moko kati na bango, soki abwaki libanga na nzela ya ebambelo mabanga, ekoki soki moke te kozanga kotuta suki moko.


Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele.


Na likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo ; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te. Davidi alobaki na Saulo : — Nakokoka te kotambola na biloko oyo nyonso, pamba te namesana na yango te ! Bongo Davidi alongolaki yango na nzoto na ye.


Kaka na tango yango, moto ya Filisitia elongo na moto oyo amemelaki ye nguba bapusanaki pene ya Davidi ; moto oyo amemaki nguba nde azalaki liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ