Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:4 - Mokanda na Bomoi

4 Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:4
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo azalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe asimbaki na loboko na ye likonga moko lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. Abundisaki moto ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko.


Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.


Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende ; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni.


Ata moto moko te ya Anaki atikalaki kati na mokili ya bana ya Isalaele. Batikalaki kaka na Gaza, kati na Gati, mpe na Asidodi.


Wana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye.


Bato ya Filisitia bazalaki na likolo ya ngomba na ngambo moko, mpe bato ya Isalaele, na likolo ya ngomba na ngambo mosusu ; kaka lubwaku nde ekabolaki bango.


Alataki ekoti ya bronze na moto na ye mpe ebombelo ya tolo, oyo basala na bakilo pene tuku motoba ya bronze.


Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ