1 Samuele 17:38 - Mokanda na Bomoi38 Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko : atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Na likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo ; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te. Davidi alobaki na Saulo : — Nakokoka te kotambola na biloko oyo nyonso, pamba te namesana na yango te ! Bongo Davidi alongolaki yango na nzoto na ye.