Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:37 - Mokanda na Bomoi

37 Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. Saulo alobaki na Davidi : — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:37
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. »


Sik’oyo, mwana na ngai, tika ete Yawe azala elongo na yo mpo ete otonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alobaki na tina na yo !


Ozali na wolo, palata, bronze mpe bibende ebele oyo bakoki kotanga te. Sik’oyo, banda mosala ; mpe tika ete Yawe azala na yo elongo ! »


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai : « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke ? »


Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te ; bato bakoki kosala ngai nini ?


Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai, otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.


Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu ;


Mpe namilobelaka : « Tala likambo oyo ezali kosala ngai pasi : loboko ya mobali ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ebongwani ! »


Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo.


Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize !


Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi ; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba : — Tika ete Yawe azala elongo na bino ! Bazongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo !


Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi.


Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko : atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo.


wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai !


Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai : Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai.


Saulo alobaki na Davidi : — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali ! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye.


Bongo Samuele akamataki libanga moko mpe atiaki yango kati na Mitsipa mpe Sheni ; apesaki yango kombo « Ebeni-Ezeri  » mpo na koloba : « Kino na esika oyo, Yawe asungi biso. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ