33 Kasi Saulo alobaki na Davidi : — Okoki te kokende kobundisa moto wana ya Filisitia ! Ozali mwana moke, nzokande ye azali mobundi ya bitumba wuta bolenge na ye.
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai : « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke ? »
Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki ! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango : « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki ? »
Davidi azongiselaki Saulo : — Mosali na yo azalaki kobatela bameme ya tata na ye. Tango ngombolo to nkosi ezalaki koya kokamata meme moko kati na etonga,
Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.