1 Samuele 17:25 - Mokanda na Bomoi25 Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.