Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:24 - Mokanda na Bomoi

24 Kasi tango bato nyonso ya Isalaele bamonaki mobali yango, bakimaki liboso na ye na kobanga makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:24
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato nkoto moko bakokima na mangungu ya moto moko kaka ; mpe na mangungu ya bato mitano, bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele na songe ya ngomba, mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. »


Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi : « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. » Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe.


Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.


Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »


Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi soki Libanga na bango atekaki bango te to soki Yawe asundolaki bango te ?


Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.


Wana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye.


Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ