Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:22 - Mokanda na Bomoi

22 Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:22
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tata na ye alobaki na ye : — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi,


Tango Iri akomaki epai na ye, Davidi atunaki ye soki Joabi azali malamu, soki basoda bazali malamu mpe soki bitumba ezali koleka ndenge nini.


Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo.


Tala bango wana bazali koya na Ayati, bazali koleka na lubwaku ya Migironi, babombi biloko na bango na Mikimasi.


Bongo babalukaki wana, na ndako epai wapi bazalaki mpe bakendeki na ndako ya elenge mobali Molevi, na ndako ya Mika, mpe bapesaki ye mbote.


Babalukaki mpe bazongelaki nzela na bango ya mobembo, batiaki liboso bana na bango ya mike, bibwele mpe bozwi na bango ya talo.


Bato ya Isalaele mpe bato ya Filisitia batandamaki mpe batalanaki ngambo na ngambo mpo na kobunda.


Davidi atindaki bilenge mibali zomi, alobaki na bango : « Bokende na Karimeli epai ya Nabali mpe bopesa ye mbote na kombo na ngai.


Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ