Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba.
Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote.
Bato ya Filisitia batandamaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Mpe wana bitumba ekomaki makasi, bato ya Filisitia balongaki bato ya Isalaele mpe babomaki na bitumba yango basoda ya Isalaele, pene nkoto minei.