1 Samuele 17:20 - Mokanda na Bomoi20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.