Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:18 - Mokanda na Bomoi

18 Mema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:18
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Isalaele alobaki na Jozefi : — Oyebi ete bandeko na yo bazali koleisa bibwele pembeni ya Sishemi ; yaka, pamba te nalingi kotinda yo epai na bango. Jozefi azongisaki : — Malamu !


Tata na ye alobaki na ye : — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi,


mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia ; pamba te bazalaki kolobana bango na bango : « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. »


Mikolo nyonso, Maridoshe azalaki koleka liboso ya lopango ya ndako ya basi ya mokonzi mpo na kozwa basango ya Ester mpe koyeba ndenge nini bazalaki kobatela ye.


Osopaki ngai lokola miliki te ? Okangisaki ngai mbuma-mbuma te lokola fromage ?


Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo.


Sima na mwa mikolo, Polo alobaki na Barnabasi : — Tozonga na bingumba nyonso epai wapi toteyaki Liloba na Nkolo, mpo ete totala bandeko mpo na koyeba soki bazali ndenge nini.


Bongo babalukaki wana, na ndako epai wapi bazalaki mpe bakendeki na ndako ya elenge mobali Molevi, na ndako ya Mika, mpe bapesaki ye mbote.


Izayi azwaki ane moko ; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali.


Bazali na lubwaku ya Terebente elongo na Saulo mpe mibali nyonso ya Isalaele mpo na kobundisa bato ya Filisitia. »


Davidi atindaki bilenge mibali zomi, alobaki na bango : « Bokende na Karimeli epai ya Nabali mpe bopesa ye mbote na kombo na ngai.


Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ