Yawe alobaki na ye : « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, mpe kulutu akosalela leki. »
Bongo Samuele atunaki Izayi : — Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso ? Izayi azongisaki : — Te ! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate. Samuele alobaki : — Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te.