1 Samuele 17:13 - Mokanda na Bomoi13 Bana mibali misato ya liboso ya Izayi balandaki Saulo na bitumba. Tala bakombo ya bana mibali yango misato oyo balandaki Saulo na bitumba : Eliabi, mwana mobali ya liboso ; Abinadabi, mwana mobali ya mibale ; mpe Shama, mwana mobali ya misato. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki : « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye.
Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba.