Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:12 - Mokanda na Bomoi

12 Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:12
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi.


Tala maloba ya suka ya Davidi : Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :


Toyokaki sango na tina na yango na Efrata, tomonaki yango na elanga ya Yari.


Yango wana, Yawe akosundola Isalaele kino tango mwasi oyo azali na pasi ya kobota akobota, mpe ndambo ya bandeko na ye, oyo bakotikala bakozonga epai ya bandeko na bango, bana ya Isalaele.


mpe Izayi abotaki mokonzi Davidi. Davidi abotaki Salomo na nzela ya mwasi ya Uri ;


Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi


« Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. »


Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna.


Basi ya mboka wana balobaki : « Naomi aboti mwana mobali ! » Bapesaki mwana mobali yango kombo « Obedi. » Obedi abotaki Izayi, mpe Izayi abotaki Davidi.


Obedi abotaki Izayi, Izayi abotaki Davidi.


Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi.


Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.


Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.


Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki.


Saulo atunaki Davidi : — Ozali mwana ya nani ? Elenge mobali Davidi azongisaki : — Nazali mwana ya mosali na yo, Izayi, moto ya Beteleemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ