Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Ndambo ya Ba-Ebre mosusu bakatisaki mayi ya Yordani mpo na kokende na mokili ya Gadi mpe ya Galadi. Saulo azalaki nanu na Giligali, mampinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye ezalaki kolenga na somo.
Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi.
Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia.