1 Samuele 17:10 - Mokanda na Bomoi10 Moto ya Filisitia alobaki lisusu : « Na mokolo ya lelo, nazali kotiola mampinga ya Isalaele. Bopesa ngai moto moko mpo ete nabunda na ye. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. »