Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 17:1 - Mokanda na Bomoi

1 Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango mpo na bitumba, basanganaki na Soko ya Yuda mpe batongaki molako na bango na Efeze-Damimi, kati na Soko mpe Azeka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 17:1
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe azalaki elongo na Davidi, na engumba Pasi-Damini, tango bato ya Filisitia basanganaki mpo na bitumba, mpe basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. Ezalaki kuna mpe na elanga moko etonda na bambuma ya orje.


wana bato ya Filisitia bakotaki na makasi kati na bingumba ya etando mpe ya sude ya Yuda. Bazwaki na makasi Beti-Shemeshi, Ayaloni, Gederoti, Soko, Timina mpe Gimizo elongo na bamboka na yango ya zingazinga, mpe bavandaki kuna.


wana basoda ya mokonzi ya Babiloni bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso mosusu ya Yuda, oyo mokonzi ya Babiloni alongaki nanu te : Lakishi mpe Azeka, pamba te yango kaka nde ezalaki bingumba batonga makasi oyo etikalaki kati na Yuda.


Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati.


Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.


Saulo atikaki kolanda bato ya Filisitia, mpe bato ya Filisitia bazongaki na mboka na bango.


Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia ; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye.


Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ