Bana mibali misato ya liboso ya Izayi balandaki Saulo na bitumba. Tala bakombo ya bana mibali yango misato oyo balandaki Saulo na bitumba : Eliabi, mwana mobali ya liboso ; Abinadabi, mwana mobali ya mibale ; mpe Shama, mwana mobali ya misato.
Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe.