Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 16:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 16:7
34 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa.


Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo.


Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo ? Pamba te, oh Nkolo Yawe, oyebi mosali na Yo ?


yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, sala mpe zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema ya moto moko na moko. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.


Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo mpo na lokumu oyo ozali kopesa na mosali na Yo ? Pamba te, oh Yawe, oyebi mosali na Yo.


Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso.


yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema na ye. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.


Boni, ozali na miso ya mosuni ? Ozali komona lokola bato ?


Tombola miso na likolo mpe tala ; mona ndenge mapata ezali likolo na yo.


oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai ;


Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.


Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo ezali penza polele liboso ya Yawe, ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato ezali polele liboso na Ye.


Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye, kasi Yawe nde amekaka mitema.


Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?


Bonzenga ya elongi ekosaka, mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ; kasi mwasi oyo atosaka Yawe, ye nde abongi na lokumu.


Kasi Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo osambisaka na bosembo mpe omekaka mitema mpe makanisi, sala ete namona mabe oyo okozongisela bango, pamba te natiki likambo na ngai na maboko na yo.


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato, tika ete namona Yo kozongisela bango mabe, pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo !


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.


Bosambisaka lisusu te kolanda oyo miso na bino ezali komona, kasi bokataka makambo na bosembo.


Bino, bosambisaka na ndenge ya bomoto ; kasi Ngai, nasambisi moto ata moko te.


Bongo basambelaki boye : « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale,


Pamba te bato mosusu balobaka : « Mikanda na ye ezalaka makasi mpe ebangisaka ; kasi soki ye moko azali elongo na biso, azalaka na ye moto ya bolembu mpe maloba na ye ezalaka tina te. »


Botala penza makambo ndenge ezaleli. Soki ezali na moto oyo andimisami solo ete azali ya Klisto, ayeba mpe ete soki ye azali ya Klisto, biso mpe tozali ya Klisto lokola ye.


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Bopusana pene ya Ye oyo azali Libanga ya bomoi, Libanga oyo bato babwakaki, kasi Nzambe aponaki yango mpo ete ezali motuya mingi na miso na Ye.


kasi bolukaka nde kitoko ya bomoto ya kati : esilaka te, ewutaka na molimo ya boboto mpe ya kimia, ezali na motuya mingi na miso ya Nzambe.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.


Azalaki na mwana mobali ; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko ; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko ; azalaki mbinga koleka bango nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ