Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 16:22 - Mokanda na Bomoi

22 Saulo atindaki maloba epai ya Izayi : « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 16:22
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Labani alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te ; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo.


Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso : Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.


Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Yawe, motema na ngai ezali na lofundu te, miso na ngai ezali na posa makasi te ; namipesaka te na makambo oyo eleki ya minene mpe eleki pasi mpo na ngai.


Mokonzi akatelaki bango mpo na mokolo na mokolo, bilei oyo basengeli kolia mpe masanga oyo basengeli komela : nyonso ezalaki kowuta na mesa na ye. Mibu misato, basengelaki koyekola ; na sima nde bakoki kosala mosala ya mokonzi.


Kasi mosungi na yo Jozue, mwana mobali ya Nuni, ye akokota kati na yango. Lendisa ye, pamba te ye nde akokamba Isalaele mpo na kozwa mokili yango lokola libula.


Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli.


Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ