Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 16:19 - Mokanda na Bomoi

19 Saulo atindaki bantoma epai ya Izayi mpo na koloba na ye : « Tindela ngai Davidi, mwana na yo ya mobali, oyo azali koleisa bampate. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 16:19
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eliya alongwaki wana mpe akutanaki na Elize, mwana mobali ya Shafati. Azalaki kobalola bilanga na bangombe tuku mibale na minei bakangisa mibale-mibale liboso na ye mpe ye moko azalaki kotambolisa bangombe mibale ya suka. Eliya apusanaki pembeni ya Elize mpe abwakelaki Elize kazaka na ye.


mpo na kovandisa ye esika moko na bakambi, na bankumu ya bato na Ye.


Maloba ya Amosi, moko kati na babateli bibwele ya mboka Tekoa. Azwaki emoniseli ya maloba oyo na tina na mokili ya Isalaele, mibu mibale liboso ete koningana ya mabele esalema, tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda, mpe Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, azalaki mokonzi ya Isalaele.


Bongo Samuele atunaki Izayi : — Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso ? Izayi azongisaki : — Te ! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate. Samuele alobaki : — Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te.


Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.


Izayi azwaki ane moko ; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali.


Davidi azalaki kokende mpe kozonga wuta na ndako ya Saulo mpo na koleisa bameme ya tata na ye na Beteleemi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ