Tika ete nkolo na biso atinda basali na ye, oyo bazali awa mpo ete balukela ye moto moko oyo ayebi kobeta lindanda. Wana molimo mabe oyo ewuti na Yawe ekoya kotungisa yo, ye akobeta lindanda na ye, mpe yo okoyoka nzoto malamu.
Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.