Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 16:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tika ete nkolo na biso atinda basali na ye, oyo bazali awa mpo ete balukela ye moto moko oyo ayebi kobeta lindanda. Wana molimo mabe oyo ewuti na Yawe ekoya kotungisa yo, ye akobeta lindanda na ye, mpe yo okoyoka nzoto malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 16:16
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.


Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, ba-oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya !


Kasi sik’oyo, memela ngai mobeti moko ya lindanda ! Wana mobeti lindanda azalaki kobeta, loboko ya Yawe ekitelaki Elize,


Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola.


Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye.


Basali ya Saulo bayebisaki ye : — Tala, molimo moko ya mabe ewuti na Yawe mpe ezali kotungisa yo.


Boye Saulo alobaki na basali na ye : — Bolukela ngai moto moko oyo ayebi kobeta lindanda malamu, mpe boya na ye epai na ngai.


Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko.


Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ