Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 16:12 - Mokanda na Bomoi

12 Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko ; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele : « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 16:12
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye Potifari atikaki biloko na ye nyonso kati na maboko ya Jozefi, azalaki lisusu kotala eloko moko te longola kaka bilei na ye. Jozefi azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.


Tala maloba ya suka ya Davidi : Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, moto oyo atombolama na bokonzi, mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele :


Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele.


Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.


« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »


Aponaki Davidi, mosali na Ye, mpe azwaki ye kati na lopango ya meme ;


Mwana mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Wana amonaki ete mwana yango azali kitoko, abombaki ye basanza misato.


Mobali na ngai azali na poso pembe, azali moto oyo asimba bendele kati na mibali nkoto zomi.


Bana ya bakonzi na bango bazalaki kongala koleka mvula ya pembe, pembe koleka miliki ; banzoto na bango ezalaki motane koleka langi ya motane penza, mpe lolenge na bango ezalaki lokola libanga na safiri.


Boye, alobaki : — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba.


Pamba te, Erode mpe Ponse Pilato basanganaki penza kati na engumba oyo, elongo na bato ya bikolo mosusu mpe bana ya Isalaele, mpo na kosalela Yesu likita, Mosali na Yo, Mosantu, oyo obulisa.


Ezalaki na tango wana nde Moyize abotamaki. Nzambe asalaki ye kitoko mingi. Babatelaki ye sanza misato na ndako ya tata na ye.


Mpo na kondima, baboti ya Moyize babombaki mwana na bango, Moyize, sanza misato sima na mbotama na ye, pamba te bamonaki ete azali kitoko mingi mpe babangaki te mobeko ya mokonzi.


Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.


Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.


Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga : — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? Abineri azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te.


Tango Samuele amonaki Saulo na mosika, Yawe alobaki na ye : « Tala moto oyo nalobelaki yo ; ye nde akokonza bato na Ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ