1 Samuele 16:1 - Mokanda na Bomoi1 Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nzokande, Yawe, Nzambe ya Isalaele, aponaki ngai kati na libota na ngai mobimba mpo ete nazala mokonzi ya Isalaele mpo na libela. Aponaki Yuda mpo ete azala mokonzi ; mpe kati na ndako ya Yuda, aponaki libota ya tata na ngai ; mpe kati na bana mibali ya tata na ngai, asepelaki kokomisa ngai mokonzi ya Isalaele mobimba.
Soki omoni ndeko na yo kosala lisumu oyo ememaka na kufa te, osengeli kobondela mpo na ye, mpe Nzambe akopesa ye bomoi. Nazali koloba nde na tina na bato oyo basalaka lisumu oyo ememaka na kufa te. Kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa ; ezali te na tina na lisumu yango nde nazali kosenga na bino kobondela.
Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »