1 Samuele 15:9 - Mokanda na Bomoi9 Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango ; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Beni-Adadi alobaki : — Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango ; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari. Akabi azongisaki : — Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo. Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye.