Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:8 - Mokanda na Bomoi

8 Akangaki ya bomoi Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki, mpe abebisaki bato nyonso na mopanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:8
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

na Arami, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki. Abulisaki mpe bomengo ya bitumba oyo abotolaki epai ya Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba.


Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza.


babomaki ndambo ya bato ya Amaleki oyo batikalaki mpe bavandaki kuna kino lelo.


Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso.


Moto moko te oyo abongisami mpo na kobebisama akoki kosikolama, basengeli koboma ye.


Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, bokonzi na bango ekozala ya lokumu.


Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.


Jozue abotolaki bingumba nyonso ya bakonzi wana mpe abomaki bakonzi na yango na mopanga. Abomaki bango nyonso kolanda ndenge Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki.


Kasi bakangaki ya bomoi mokonzi ya Ayi mpe bamemaki ye epai ya Jozue.


Saulo azongiselaki Samuele : — Ngai natosaki Yawe, nakokisaki etinda oyo apesaki ngai : Nabebisaki penza bato ya Amaleki, namemaki kutu Agagi, mokonzi na bango.


Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »


Abomaki lisusu na mopanga kati na Nobi, engumba ya Banganga-Nzambe, mibali, basi, bana mpe bana mike, bangombe, ba-ane mpe bameme.


Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ