Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:32 - Mokanda na Bomoi

32 Kasi Samuele alobaki na ye : « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela : « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:32
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Moto nyonso oyo akokima somo akokweya na libulu, mpe moto nyonso oyo akobima na libulu akokangama na motambo, pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu na mokili ya Moabi, » elobi Yawe.


Yango wana, na maloba ya basakoli na Ngai, nazali kokata-kata bino na biteni ; na maloba ya monoko na Ngai, nazali koboma bino, mpe bitumbu ezali kokweyela bino lokola mokalikali.


Tango bato bakokoma koloba : « Tozali sik’oyo na kimia, mpe tozali lisusu na mitungisi te, » ekozala na tango wana nde libebi ekokweyela bango na mbalakata, lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota, mpe bakokoka kokima te.


Sima, Jozue alobaki : « Bofungola ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe bobimisa bakonzi wana mitano. »


Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. ›


Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia.


Boye Samuele akendeki elongo na Saulo, mpe Saulo agumbamelaki Yawe.


Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ