Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki.
Kasi Samuele alobaki na Saulo : — Nakozonga elongo na yo te ; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te.
Saulo alobaki : — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.
Kasi Samuele alobaki na ye : « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela : « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »