Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:3
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki. Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.


Atunaki ngai : — Ozali nani ? Nazongiselaki ye : — Nazali moto ya Amaleki.


Yawe alobaki na Moyize : — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te.


Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai.


Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »


Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali ;


Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango.


Abundisaki na makasi nyonso bato ya Amaleki mpe alongaki bango, akangolaki Isalaele na maboko ya bato oyo bazalaki kobotola bango biloko.


Yawe apesaki yo etinda mpe alobaki : « Kende mpe bebisa penza bato oyo ya masumu, bato ya Amaleki ; bundisa bango kino okosilisa koboma bango. »


Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango ; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda.


Abomaki lisusu na mopanga kati na Nobi, engumba ya Banganga-Nzambe, mibali, basi, bana mpe bana mike, bangombe, ba-ane mpe bameme.


Tango nyonso Davidi azalaki kobundisa mboka moko, azalaki kotika te na bomoi ezala mobali to mwasi. Nzokande azalaki kobotola bameme, bangombe, ba-ane, bashamo mpe bilamba. Bongo azalaki kozonga epai ya Akishi.


Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ