Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:29 - Mokanda na Bomoi

29 Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:29
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.


Yawe apesaka bato na Ye makasi ; Yawe apambolaka bato na Ye na nzela ya kimia.


Bosakola ete nguya ezali ya Nzambe oyo nkembo na Ye ezali na Isalaele, mpe nguya na Ye ezali kati na mapata.


Yango wana, kati na kanda na ngai, nakati seleka : ‹ Bakotikala kokota te kati na bopemi na ngai ! › »


Bakoloba na tina na Ngai : ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.


Ngai Yawe nde nalobaki. Tango ekoki mpo na Ngai kosala ; nakoyoka mawa te, nakozonga sima te ! Okosambisama solo kolanda etamboli mpe misala na yo, elobi Nkolo Yawe. › »


Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?


Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.


Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.


Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.


soki tozangi kondima, Ye azalaka kaka Moyengebene, pamba te akoki komiwangana te.


mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango,


Mpo na yango, mpo ete, biso bato oyo totika nyonso mpo na kosimba elikya ete tokozwa biloko oyo alakaki biso, tolendisama makasi, Nzambe asalelaki makambo mibale oyo ebongwanaka te, oyo kati na yango ekoki kosalema te ete Nzambe akosa.


Kasi Yesu akomaki Nganga-Nzambe na nzela ya seleka, tango Nzambe alobaki na Ye : « Nkolo akati seleka, mpe akobongola mokano na Ye te : ‹ Ozali Nganga-Nzambe mpo na libela. › »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ