Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:24 - Mokanda na Bomoi

24 Bongo Saulo alobaki na Samuele : — Nasali lisumu, nabuki mobeko ya Yawe mpe malako na Ye. Nabangaki bato, yango wana natosaki bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:24
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.


Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › mabele elakelami mabe likolo na yo. Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo.


Davidi alobaki na Natan : — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. Natan azongisaki : — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te.


pamba te nabangaki bato mpe nabangaki ete mabota etiola ngai, yango wana nakangaki monoko mpe nakokaki kobima libanda te !


Sukola ngai mobimba mpo na kolongola mabe na ngai, mpe petola ngai na masumu na ngai.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki : — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino.


Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo.


Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe.


Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.


Mokonzi Sedesiasi azongisaki : — Azali na maboko na bino ; mokonzi akoki koboya likanisi na bino te !


Balami alobaki na anjelu ya Yawe : — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai.


Alobaki na bango : — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te ! Kasi bango bazongisaki : — Etali biso na nini ? Etali nde yo moko !


Bozali sik’oyo kokanisa nini na likambo oyo : nazali koluka kosepelisa bato to nazali koluka kosepelisa Nzambe ? Boni, nazali koluka kosepelisa bato ? Soki nazalaki nanu koluka kosepelisa bato, nalingaki kozala mosali ya Klisto te.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


Saulo azongisaki : — Basoda babotolaki yango na maboko ya bato ya Amaleki ; babatelaki kati na bibwele bameme mpe bangombe oyo elekaki kitoko mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na biso ; kasi nyonso wana mosusu, tobebisaki yango penza.


Saulo alobaki : — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.


Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango ; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda.


Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ?


Boye Saulo alobaki : — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ