1 Samuele 15:23 - Mokanda na Bomoi23 Pamba te botomboki ekokani na lisumu ya kosambela banzambe ya bikeko. Lokola obwaki Liloba na Yawe, Ye mpe abwaki yo ; ozali lisusu mokonzi te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Yawe alobaki na Samuele : — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.
Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.