20 Saulo azongiselaki Samuele : — Ngai natosaki Yawe, nakokisaki etinda oyo apesaki ngai : Nabebisaki penza bato ya Amaleki, namemaki kutu Agagi, mokonzi na bango.
‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; nazali peto, namemi na ngai ngambo te. ›
Tala makambo oyo Yobo azali koloba : ‹ Nasali mabe te, kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai.
« Boni, okanisi ete yango ezali sembo ? Olobi : ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. ›
Olingi kotiola bosembo na ngai ? Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ?
Elenge mobali alobaki : — Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ?
Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu : — Nani azali moninga na ngai ?
Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.
Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.
Samuele akendeki epai ya Saulo, mpe Saulo alobaki na ye : — Tika ete Yawe apambola yo ! Natosaki mitindo ya Yawe.
Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »
Akangaki ya bomoi Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki, mpe abebisaki bato nyonso na mopanga.
pamba te otosaki Yawe te mpe okweyiselaki te bato ya Amaleki kanda ya Yawe na koboma bango nyonso. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo.