Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.
Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji ; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; na bongo, apelisaki kanda na Ye.
Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo : bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango.