18 Yawe apesaki yo etinda mpe alobaki : « Kende mpe bebisa penza bato oyo ya masumu, bato ya Amaleki ; bundisa bango kino okosilisa koboma bango. »
Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe.
Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari.
Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.
Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ? Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ?
Nzela ya Yawe ezali ekimelo ya makasi mpo na bato oyo batambolaka na boyengebene, kasi ezali nde libebi mpo na bato oyo basalaka mabe.
Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo.
Biso tobotama Bayuda, tozali Bapagano te oyo bazali basumuki.
Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »