Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:17 - Mokanda na Bomoi

17 Samuele alobaki : — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele ? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:17
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Efrayimi azalaki koloba, bato bazalaki kolenga ; azalaki kokonza kati na Isalaele, kasi asalaki mabe na kosambela nzambe Bala ; yango wana akufaki.


Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.


Jedeon azongisaki : — Ah nkolo na ngai, ndenge nini ngai nakoki kobikisa bana ya Isalaele ? Kati na Manase, libota na ngai nde ezangi makasi koleka, mpe ngai nazali mwana ya suka kati na ndako ya tata na ngai.


Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ?


Boye, batunaki lisusu Yawe : — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ? Yawe azongisaki : — Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko.


Samuele alobaki na Saulo : — Kata ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka. Saulo alobaki na ye : — Yebisa ngai yango !


Saulo azongisaki : — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ