16 Samuele alobaki na Saulo : — Kata ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka. Saulo alobaki na ye : — Yebisa ngai yango !
Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki : — Kota, mwasi ya Jeroboami ! Mpo na nini ozali komibongola ? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe.
Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino.
Samuele alobaki : — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele ? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele.
Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo : « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo : « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. »