Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Samuele 15:13 - Mokanda na Bomoi

13 Samuele akendeki epai ya Saulo, mpe Saulo alobaki na ye : — Tika ete Yawe apambola yo ! Natosaki mitindo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Samuele 15:13
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Mokeli ya likolo mpe ya mokili, apambola Abrami !


Adamu azongisaki : — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango.


Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi : « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye !


Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.


Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te, kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.


Ezali na bato oyo batonda na lolendo mpe bamonaka bato mosusu pamba.


Bopesa ye bambuma ya misala na ye ! Tika ete bapesa ye lokumu, na bikuke ya engumba, mpo na misala nyonso oyo asalaka !


Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »


Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.


Alobaki na mama na ye : — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. Mama na ye alobaki na ye : — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo !


Boazi azongiselaki ye : — Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi ! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso ; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola.


Bongo tango kaka asilisaki kobonza mbeka yango ya kotumba, Samuele akomaki. Saulo abimaki mpo na kokende kopesa ye mbote.


— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.


Saulo azongiselaki Samuele : — Ngai natosaki Yawe, nakokisaki etinda oyo apesaki ngai : Nabebisaki penza bato ya Amaleki, namemaki kutu Agagi, mokonzi na bango.


Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango ; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda.


Saulo azongisaki : — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai !


Moko kati na basali ya Nabali alobaki na Abigayili, mwasi ya Nabali : « Davidi atindaki bantoma wuta na esobe mpo na kopambola nkolo na biso, kasi ye atombokelaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ